Jean-Gabriel Périot – un cinéaste politique

 

Ndenge ya kosangisa bilili ya Jean-Gabriel Périot etindaki biso pe tosala mosala ya ndenge oyo na kati bokomona bakoma ebele, ezali kolobela makambo oyo cinéaste oyo alingaka. Tolingi kolobela bino été ekozala pasi po tokutana na cinéaste oyo azali na bomoto lokala Jean-Gabriel Périot. Na ndenge ayambaki biso tango tokutanaki, pe na ndenge ya bomoto na ye po bato oyo batalaka mosala na ye. Nde, ba films nionso ya Jean-Gabriel Périot ekoki kotalama na site internet na ye.

 

Tobanda na ébandéli ya  cinéaste…

Jean-Gabriel Périot abotama na 1974 na Bellac, na Limousin. Ayébaki kobanda bomuana été cinéma ekozala mosala na yé. Alandaki na Université mateya ya Information pé  Communication, pé sima Maîtrise scientifique pe technique na Audiovisuel. Lelo azali kokumisa mateya yango té, azali komona yango neti « tina té ». Kasi mateya yango nde efungolelaki yé nzela po na asala stage mbula moko na ndambo na Centre Georges Pompidou, ndenge ezalaki kotikela yé tango mingi ya kosala eloko té. Na Beaubourg, ayekolaki mingi, pe ayekolaki montage, lokola mosala ne yé moko ezalaki kosala ba films ya miké miké po na kolakisa na exposition ya monene ya botongi ndako. Azali koloba été Beaubourg epesaki ye mosala : monteur. Sima asalaki mosala ya monteur bisika na bisika, po na kozua mbongo ya koliya. Abandaki pé kosala ba films ya yé moko, tango azalaki kokutana kutana na bato.

Eloko oyo azali kolakisa mingi ezali ezaleli ya makasi oyo moto azali na yango na kati ya bato oyo avandi na bango. Asali mosala ya kokanisa tina ya ezaleli ya makasi, po na yango asalelaki mingi ba films ya kala ezala ya yé to té. Asalaki mingi montage na ndenge ya kala, pé amonaki ndengé ya kosala montage, sangisa na ndenge ya kobongola bilili.

 

Komema bato po na komituna makambo mingi neti mibali alingaka mibali pe basi balingaka basi, nzoto pe pilitiki

 

Jean-Gabriel Périot abandaki kosala ba films oyo ba émissions to mosala na yé esengaki yé. Na ebandeli, asalaki ba films oyo ezalaki kolobela mibali alingaka mibali pe basi balingaka basi, neti Gay ? (2000) to Avant j’étais triste (2002). Esika ya kotambola na balabala po na kondimisa bato oyo, yé abandaki kolobela likambo yango na ndenge ya kotiola, azalaki kobanga té komimonisa yé moko na ba films na yé. Alobaki kutu « kozala neti bato nionso ezali kopesa yé posa té po na kokende kotambola na bala bala po na koganga ».

Komibimisa na ndenge ya lokuta neti ya alingaka mibali to kolakisa na bilili oyo basangisa na ba papier evandeli na ya mobali abala mobali pé muasi abala muasi, ba films yango ezali nano po na komesanisa bato na bizaleli ya ba oyo balinganaka muasi na muasi pe mobali na mobali, sima ndé ekomaki ba films ya solo. Alukaki yango té, kasi ndé asalisaki bato oyo po bamona bizaleli na bango ya sika. Na ba films na yé, Jean-Gabriel Périot alobi azali kofunda té kasi azali kopusa mituna. Moto nionso amona film ndenge ye moko alingi. Ezali neti azali kotinda bato oyo bazali kotala film po basosola.

Tango azali komilakisa na ba films ya mobali azali kolinga mobali, azali pé komilakisa na film na yé Journal Intime (2000). Film yango ezali kolakisa yé ndenge azali kosalisa nzoto na yé ya kobeba. Na suka ya filma, bato bazali na mua kokoso po na ndenge bamoni nzoto ya bomuana boue ezala ya kobeba. Film wana esalamaki tango Jean-Gabriel Périot abimaki lopitalo akotani kuna tango mosusu sima ya likama ya motuka. Komona ndenge nzoto ezalaki naino ya kobeba etindaki ye sala film oyo, akokaki kosala yango té, soki nzoto ebebaka libela. Soki batuni yé po na film yango, Jean-Gabriel Périot azali koloba « ezali film moko kaka boyé, eloko mususu ezali té kaka « nazali na ba minu ya lokuta oyo nalongoloka » po na kosala ndenge wana ezalaki malamu po na mua likambo ya muka boye ».

Présidentielles 2012. Basengi Périot asala film ya mokuse oyo ezali kolobela politiki ya France. Lokola azalaki koyaba naino té soki andima, bayebisaki yé asala ndenge ye moko alingi. Yango wana asalaki film ya kotumola # 67, oyo ezali kolobela ndenge France asalaka démocratie na yé. Azali komonana sikoyo lokola Cinéaste ya politiki ndenge ye moko amibimisaka. Cinéaste pilitiki oyo alobaki na ndenge ya mabe ba élection : « namonaka ezali bosoto ! »

 

Tango ezali neti nzela ? Eloko nini tosali komona sima ya bilili ? Na ba films ya mikuse ya Jean-Gabriel Périot, tango ezali kolakisa eloko moko. Mituna oyo azali kolakisa na ba films na yé ezali lokola posa ya batu , pona kotomboka makasi.

Mutu akoko kolanda na nzela ya ba photos ya ba balabala, na Dies Irae (2005) – komitika po  na kotala na kobanga – ti na ndaku ya gaz na Auschwitz.

Mutu akoki kozonga sima na Undo (2005) film oyo ezali kozonga sima banda suka ya mokili ti na ebandeli ya mokili, to na Nijuman No Borei (200 000 Fantômes) (2007) oyo ezali kobanda na likama ya Horoshima pe ezali kosangisa ba photos ya esika oyo eloko ezali té. Koluka koyeba tango elakisi nini ezali komema na molili – po bisika ya liwa na Horishima ezali bisika tozali kosala ba films, bilili na kati ya mitu na biso ekata ndenge ya komona suka ya nzela.

Jean-Gabriel Périot akomisi ba nzela ya kotutana na ba oyo ya ba tango ya mawa na kati ya bilili oyo azuaki pe na Internet. Azali kosala mosala ya lisanga ya tango pé esika, lisusu azali kotunatuna elili awuti na ebandelo pe elili oyo ezali na makambo na yango moko. Bilili bizali kotalama ndenge mosusu penza : ezali neti koningisa milimo. Ba films ya mikuse ya Cinéaste bizali kotia bato na ngambo moko libungi pe ngambo mosusu kobanga, pe bizali kotuna po na film (mabé to malamo).

 

Le 21 avril 2002, Jean-Gabriel Périot azalaki kosepela mbotama na ye tango batangi ba kombo ya bato mikale oyo baleki po na kopona mokonzi ya France : Le Pen azali moto ya mibale. Pasi oyo eyaki kokutana na tango ya esengo po na ye na tango ya mawa po na pilitiki ya France, epusaki réalisateur amituna : ndenge nini likambo ya boyé ekomi ? Ndenge nini ngai natiki likambo ya boye ekoma ? Liloba na yango ezali esika oyo film ezali kolakisa mbango bilili ezali koningana té, kombo na yango 21.04.02. Po na réalisateur , ye alingi komonisa ndenge ye moko azali, yango wana asangisi ndenge moko bilili ya Renaissance na bilili oyo ezali kokumisa biloko, bilili ya bato bavandaka esika moko na bilili ya bolumbu. Lokola bizali bilili ya bato oyo bavandaka esika moko, tokoki komituna soki mosal ya komilakisa ye moko ezali pe na mikolo oyo : bilili alakisi bizali komonana lokola yango moto ebokola ndenge na biso ya komona pe elakisa bino ndenge ya kokanisa ?

Ndenge atika bilili elakisa esika moto aloba, Jean-Gabriel Périot azali kolanda nzela ya Thomas Mitchell, oyo asalaki ndenge bilili ezui bisika mingi na esika ya bakoma. Yango Périot azali kosala bilili oyo moto nionso akoki kotala pe koyeba malamu. Yango azali kosala ba films oyo ezali kolobela makambo ebele.

Na film We are winning, don’t forget tozali komona bilili ya baton a kati na bisika ya mosala na bango. Mbala moko esika ya molili ebimi, pe sima bilili ya bato bazali ko sepela té na bala bala. Na film Les barbares ndenge ya kosalela ezali ndenge moko : elili ya lingomba, oyo ezali pe elili ya bato bazali koningana té, elili yango ezali koningana soki balakisi moto moko oyo balongoli na lingomba. Yango ekotisi koningana na kati ya bilili wana. Nde, kolongwa na elili ya bato mingi na elili ya moto moko, ekotisi koningana ya bitumba. Mosala yango ezali pe motuna po na mosala ya kati kati : tokoki nde koloba koningana, tango tozali kosalela bilili, neti bilili ezali koningana té?

Ndenge aponi bilili na misale mibale oyo ezali po na kotungisa bato : ndenge azali kosalela bilili mingi mikolo nionso ezali kotinda bato basosola lokola bato pe bakoki komimonana na bilili ya bato mingi : etali moto nionso.

 

Ba films mibale oyo ezali kolakisa ndako ya bokangami esalamaki na ndako ya bokangami ya Orléans. Film ya liboso, esengamaki na lingomba ya art contemporain Mixar na Orléans. Andimaki naino liboso té, po ayebaki ndenge asala té, po ezalaki esaleli na yé té, yango aponaki kosalela ndako ya bokangami. Ti akanisaki kopusa bato oyo bakangama po bayemba po na bato oyo bazali libanda. Asengaki nab a chefs opérateurs mibale bazua bilili oyo ezala koningana té ya bato oyo bazali koyoka miziki yango, pe tango Jean-Gabriel Périot azalaki pembeni ya bato bakangama bazali koyemba.

Périot abandaki komona neti azalaki komibendana na mosala wana. Lokola ye azalaki moyembi té, azalaki komema bato wana po bayemba malamo, ndenge moko ten a ndako ya kokangama.

 

Mosala ya mibale esengamaki na SPIP, Service Pénitentiaire d’Insertion Professionnel oyo ezali kolandela culture, reinsertion, ndenge ya kozala na lingomba po na ndako ya kongama. Ezali bilili ya koningana té ya bato ya ndako ya bakangami tango bazali kolobela po nab a ndoto na bango, na ndenge ya maloba ya “slam” to pe na ndenge ya koyemba. Na film wana, Jean-Gabriel Périot amonaki bolamu ya mosala azalaki kosala, ndenge asala na atelier, komona ndenge mosala esalamaki malamu, ata ezali eloko ya liboso té, kasi kosala eloko wana ya malamu po na bato bakangama esalaki ye malamu penza.

Po na Périot, kosala bilili ezalaki po na kokutanaka na bato.

 

« Tokoki kosolola malamu na bato soki tozali kosalela yango na bilili na esika ya maloba... » - Lisolo na Jean-Gabriel Périot.

 

Olandaki nzela nini ? Oyekolaki cinéma ?

Nayebaki nde nalingaki kosala cinéma kasi natangaki esika ya cinéma té. Nayekolaki Science na Technique ya audiovisuel. Na ba tango oyo nazalaki kopema, nayekolaki mosala ya monteur na Beauboug mbula moko na ndambu. Sima nde nazalaki kozua mbongo ya kolia na kosala mosala ya monteur ti nakomaki kosala ba films. Tango nazalaki koyekola, nazalaki kosala bilili pe montage ya bisika oyo babatelaka mikanda yango ndé esalisaki ngai po nakoma kosala cinéma ya ndenge boye.

 

Batikelaki osalela mikanda nini oyo babatela ?

Nasalaki ba films po na Beaubourg amonisa na L’art de l’ingénieur. Ezalaki mokama ya bilili etali kotonga ba ndako, elili moko esengelaki kosala miniti misato, maloba ezala té, makoma ezala koleka zomi té pe elobela ndenge misato ya kotonga pont. Tolukaki kolakisa na bilili kaka wana, makoma to maloba ezala té. Ezalaki malamo penza, mosala ya montage ya solo nde eyekolisaki ngai mingi.

 

Po na ba films na yo etali mobali alingaka mobali pe muasi alingaka muasi, eloko nini etindaki yo osala film oyo yo olobi olingaka bana mibali ?

Lokuta ! Mbala misusu, tosalaka ba films oyo tokanisaki té, kasi nde oyo basengi biso tosala. Basengaki ngai nasala yango, nasalaki na émission moko ya Canal+ etalaki komibimisa été olingaka moto akokani na y ope basengaki ngai nasala ndenge wana. Sima pé ezalaki lisusu film ya mosala té kasi ya moto yé moko, kasi nakanisi nalingaki kozua likanisi ya kosala film ya ndenge wana té. Ata kutu nasepelaki kosala yango po ezalaki neti kosekisa.

 

Esekisaki pe biso mingi

Basengaki ngai kala nasala ba films mingi ya boyé pe mbala misusu naboyaki kosala yango. Kasi ekutanaki na tango misusu oyo nakokaki kosala yango, po tango ezalaki pe likambo yango ekokani na eloko tolingi kosala pe Gay ? ezali na kati ya ba films oyo tolingaki kosala.

 

Basengaki yo pé film Avant j’étais triste ?

Ya solo po ekokani, pe na ba mbula 1990, programme moko ya monene ebandaki na Canal +, kombo na yango Nuit Gay. Nabandaki kosala esika wana, pe lokola bazalaki kolinga mosala na ngai, batunaki ngai soki nakoki kosala mua eloko po na ba émissions wana. Nandimaka mosala té soki ekoki kosukisa na film ya mutu ye moko té. Nalingaka naino koyeba liboso po na nini kosala film oyo ekosalela kaka mbala moko.

 

Tolingaki mingi films na yo Rain.

Ya solo (aseki). Ezalaki po na koseka! Na ba films na ngai ya ebandeli, nabandaki kosala ba films oyo ezali kosekisa té, pe ezalaki kosenga ngai mbula mobimba, sima nde po na pemisa nzoto, nazalaki kosala ba films ya ndenge boye, ebandaki kosenga mikolo mike, kasi nde ebandaki kotinda ngai nalobela makambu misuse. Eza neti ezangi tina, kasi ekeseni, esika oyo ekeseni penza, po na eloko oyo tokokaka kolobela te neti lokola ba nzoto na ba nzoto ekutanaka, neti mobali na mobali to muasi na muasi. Ndenge wana ezali malamu soki bato wana bazali libala, bazali na bana kasi ndenge ba nzoto na bango ekutanaka ekoki kolobama té. Tozali kovande na mokili ya ba Yuda pe ba klisto, kokutanisa nzoto ezali mabe, bato nionso na mokili basengeli kovanda ndenge wana, soki moto moko asali ndenge mosusu ebimi nde mabe, bato bazali na pasi mingi po na kondima moto oyo akokani na ye te.

Rain, ezali kitoko, ezali kosekisa, ba mabulu ya mayi ezali po na kosekisa pe bato bazali kolobela na likambo oyo bamonaka mabe.

 

Ba films oyo tozali kolobela ezali ya kala, ba films oyo osali sima ezali na koseka mingi té?

Moko ezali neti bozoba, ezali #67 (aseki). Natala yango kala penza. Basengaki ngai yango po nakokaki kokanisa yango ngai moko te ! Ezalaki po na site moko, mikolo mokama liboso ya kopona mokosi ya France, site wana ezalaki kolakisa mikolo nionso film ya politique. Natunaki bango : soki tozali kolobela boponi mokosi ya mboka, nakoki koloba eloko nazali kokanisa na se ya motema? Po kosala film ya malamo po na politiki ezali kosepelisa ngai te.

 

Ezalaki posa ya kotumola na ndenge ya kopona mokonzi ya mboka?

Te, ezali litumoli te, ya solo penza! Ezali na ndenge ya mua kobanga, mua  mayele mingi pe ndenge ya mua kimia po na kolobela démocratie, to ndenge ya boponi mokonzi ya mboka. Ezali pe ndenge wana ya kolobela : nakanisi ezali bosoto ! Film ewumeli miniti misato, sima ekoki kosalema na tango molayi ya mokama libwa, kasi tango mosusu ezali kozanga botosi, pe bato bazali kosepela te.

 

Yo moko okomaka ba films na yo nionso ? Osalaka kaka oyo okomaki ?

Ya solo. Sima, tokoki kobakisa oyo tokomaki te. Tokoki kobongola makambo oyo tokomaki na ebandeli, neti esalemaki na ba documentaires mibale oyo nasalaki na ndako ya bokangama. Nakanisaki ndenge ya kosala kasi nakokaki kokengela nionso te. Namesana kokomaka ndenge bato bakozala na film, pe masolo neti ya Journal Intime ekomamaka te, kasi nayebaki penza eloko nini nalingaki kosala.

 

Ndenge nini okanisaki kosala ba films na yo mibale na ndako ya bokangami ya Orléans ?

Po na Nos jours absolument doivent être illuminés Mixar lingomba moko ya botalisi biloko na Orléans moto ebengisaki ngai po nasalela bango mua mosala moko. Kotalisa biloko na bala bala ezali eloko nasalelaka té, nayebaki eloko nasala te. Ti nakanisaki na ndako ya bobombami ya Orléans, po tango nakendeki mbala moko kolakisa film na ngai, makambo elekaki malamo te! Namilobaki et nakozonga mukolo mususu pe na salisaki feti oyo bato bakangami bazali koyemba pe bato nalibanda bazali koyoka bango. Film ebimaki sima nakanisaki yango te, po posa na ngai ezalaki kaka koyembisa bango.

 

Ndenge nini, okanisaki yango té?

Musala na ngai ezalaki nabongisa esinga ya koyemba, pe sima esengelaki tomonisa na bato oyo bakangami ndenge nini bato oyo bazali na libanda bazalaki kobina. Na Mixar, tokanisaki kolakisa bango bilili yango mua mikolo mingi, yango nasengaki ba chefs opérateurs mibale baya na ngai. Tobongisaki mosala yango, nasengaki bango bazua bilili na ba caméra ezali koningana te, ya bato oyo bazali koyoka miziki. Ngai, nazalaki na kati na bakangami oyo bazalaki koyemba, ba opérateurs wana basalaki bilili bango moko pe poso elandi tango namonaki mosala esalamaki nalobaki « wow ».

 

Pe, oyo bato bazali koyoba ezali bande?

Ya solo pe bayebi yango, tokokaki te kosala bilili tango miziki ezalaki kosalama po na kobatela bato po pe bato baganga te « à bas ba soda » to « à bas ndako ya bokangami ». Esengaki pe kopema mua ngonga moko po na kobalo koyemba ya mibali pe ya basi. Tomitunaki pe soki makambo eleki malamo te tango bazali koyemba, yango tosalaki ndenge wana. Pe tomonaki ndenge nini ya kosala te po na kolakisa na libanda oyo ezali koleka na kati, esengaki ba singa ya milayi penza.

Pe, tosalaki bilili ya bato oyo bazalaki koyemba, tokendeki mbango libanda pe toyebisaki bato oyo bazali na libanda été bakangami bazali na sima ya mur pe bakoki koyoka maboko oyo bakobeta. Bato bazalaki kolanda miziki yango neti soki bakangami bazalaki sima ya mur pe bazalaki koyemba ngonga wana. Baye bakangami bazalaki na sima te, kasi bato bayebaki te kasi… Sima, bamonaki bilili.

 

Film na yo Le jour a vaincu la nuit esalamaki pe esika moko ?

Esalamaki esika moko : kasi awa nde bato ya SPIP nde basengaki ngai nazonga esika oyo po nasala comédie musicale nde ekomaki film. Po na ba films ya ndenge wana, ezali malamo nde bango basenga biso mosala wana po ezuaka nkokoso mingi po na kosala film na ndako ya bokangami. Nazali na baninga oyo bazali kozela banda mbula mibale po bakotisa caméra na ndako ya bokangami.

 

Eloko nini osengaki na bato oyo bakangama ?

Ezalaki film etalaki ba ndoto, nasengaki bango babétéla ngai ba ndoto na bango. Nazalaki koluka eloko moko oyo tokokaki kolobela esika moko. Kasi, bato misusu balotaka te to balotaka mingi te, misusu balotaka mingi nde tosangisaki po totala soki bango nionso balotaka mingi ndenge moko po tolobelaka mbala mingi kaka ndoto moko té. Sima nde, toyokanaki noki na makambo oyo moto na moto akokaki koloba pe tobandaki kokoma yango.

 

Bayekolaki na kati ya motema makambo ya koloba ?

Bato misusu bazalaki kokoma te. Yango to enregistraki ba ndoto na bango, tokomelaki bango yango pe tosalelaki ndenge ya kotanga po ekokana te. Bato misuse bazalaki kokoma malamu nde tozalaki kaka kobongisa oyo bakomaki mabe. Bato oyo balotaki ba nzembo, bazalaki kozua tango mingi po na kokoma neti koyemba, tomekaki pe miziki yango liboso. Nionso oyo ezuaki mua tango, sima tobandaki komeka kosala film po koyekola ndenge kotala camera pe kotanga oyo tokomaki. Na suka nde babandaki kokanga na mutu oyo ekomamaki. Oyo ekomamaki ezalaki molayi po na kokanga na motema. Mosala esengelaki été bakoka kobosana te.

 

Ndenge nini SPIP ayambaki film yango? Ezalaki ndenge basengaki?

Nayebi te, nakanisi ezali oyo batalaka mingi te. Tolakisaki yango mbala moko kaka na Orléans na bato oyo babimaki, SPIP na ba officiels. Esepelisaki bato mingi, na bakonzi. Soki bato balingi yango, bato misusu bazali koloba : « ngai natalaka biloko ya ndenge boye te, kasi basali yango malamo». Kasi SPIP to bato basalaka na ndako ya bokangama bakamuaki ndenge mosala wana esalamki malamu. Koyeba koloba na mutu miniti mineyi makambo oyo ekomamaki pe kobosana te liboso ya camera, ezali pasi po na mutu oyo asalaka mosala wan ate. Ezali film oyo esengaki mosala monene po esalama. Po na bato oyo bayebi ba ndaku ya bobombami pe bayebi bato ezalaki eloko moko ya monene penza!

 

Esalaki yo ndenge nini tango osalaki na bato oyo bakangama? Olobaki ozali na posa ya kozonga lisusu po ozala na bango mikolo mingi?

Tango nakendeki mbala ya liboso, nalakisaki film ngonga moko kaka, esalaki malamu te! Nakendeki po nasalaka film oyo nakotelaka bato, pe soki babengisi yo esika wana, okokende! Nakendeki nanu ndenge wana sima namonaki nde esalamaka ndenge wana te. Ngayi, nakendeki kuna neti po na komilukisa, bango, bazalaki neti kolekisa tango na mbango, ezalaki na tina moko te! Namilobaki po nazonga epai na bango nde nasengelaki kolekisa na bango tango mingi po toyebana malamu. Tango nakanisaki misala mibale mbala moko, po na oyo ya suka, ezalaki mbala ya liboso namonaki musala nazali kosala ezali malamu. Tango oyo nalekisaki na bango esalaki biso malamu, cinéma penza esangisaki biso.

 

Ozali komimona neti cinéaste oyo azali komeka kolakisa makambo to kokotela bato? To nionso mibale?

Oyo azali komeka kolakisa makambo te, mais cinéaste kaka! Po naloba malamu, nakoki koloba cinéaste documentaire. Ezali kolobela cinéma na ndenge ya mokuse. Cinéma ya politiki ekoki kosepelisa ngai. Tokoki koloba cinéma Vertov azalaki kosala cinéma ya komeka kolakisa makambo kaka, kasi ngai te. Nazali kosala cinéma documentaire oyo elukaki nzela na yango. Kasi soki bato oyo balukaki ndenge mingi ya kosalela cinéma babengami ndenge wana, tokoloba été ba cinéastes nionso bazali ndenge wana. Po na ngai, koluka ndenge mingi ya kosalela cinéma, ezali mingi na kati ya film. Ngai nazali kosala cinéma documentaire.

 

Okoki koyebisa bis oba cinéaste nini olingaka, to ba oyo olandaka ndenge ya kosala ?

Nandimi te kolanda ndenge ya kosala ya ba réalisateurs misusu, po ezali penza mabe po na ngai nasala ndenge oyo bato misusu basala ! Nazali komiloba été ngai moto ya liboso te moto nasali ndenge boye. Soki oyebi eloko te ezali malamu te, kasi malamu oyeba mua muke, po okoki kotika kosala ba films. Eloko ya kokamua ezali tango mosusu oye komona ba cinéastes misusu pe olobi : « nalandaki esaleli na ye, kasi nayebaki ye te ! », nakoki koloba mosala na ngayi ezali neti ya ba films ya Godard, ya lingomba Dziga Vertov pe Guy Debord, oyo nayebaki sima pénza to pe Santiago Alvarez. Bazali ba cinéastes oyo nayaki koyeba sima penza, nde nasalaki ba films na ngai boye te. Sikoyo nakoki koloba été po na ngayi bazali ba cinéastes minènè. Nazali kolanda nzela na bango, kasi naponaki ndenge wana te. Tango nabandaki kosala ba films, namitiaki na nzela na bango te.

 

Okoki koyebisa biso film neti ndenge ya liloba, neti « statement », neti na ba films Les Barbares, We Are Winning, Don’t Forget pe 21.04.2012, oyo ezali kolakisa likanisi pe na suka eloko ya kolanda?

Ezali ndenge Vertov atikelaki biso pe ndenge ya cinéma moko oyo emikokani yango moko, oyo esalelaka biloko na yango moko na esika ya kobakisa biloko misusu etali cinéma te. Yango ezali ndenge ya kokanisa po na cinéma ya politiki, oyo ezali kopanza ba sango kaka ya politiki. Ezali pasi te soki tozali kosolola na bato na bilili na esika ya laloba, oyo ekoki kosalama te soki oyebi monoko wana te, to elobeli ndenge moko te. Elili ezali kolobela mutu nionso, ata soki tozali na ndenge moko te ya kolanda, kasi tozali na ndenge moko ya kosolola na oyo tozali komona. Ba films oyo ezali kotuna mingi po likanisi na biso ezalaki kosala, kokangisa bilili po na koloba makambo. Tozalaki kolobela #67 kala te, po na ngayi ezali eloko ya kosekisa pe nazali koloba : « ngayi nazali kokanisa été kopona mokonzi ya mboka ezali bosoto, pe basta ! ». Tozali koloba eloko moto pe, soki elobeli ya malonga ezali te, tozali neti ndenge ya kondima to ya kososola, tozali koloba ndenge biso tozali komona, kasi soki tozali kosalela na bilili, tozali nde kotuna tuna. Ato bazali komona été tozali koloba eloko moko kasi eyebani nano malamo te pe yango ezali kotikela bato oyo bazali kotala bamituna.

Po na ngayi, ezali mituna nde nazali kopesa kasi kozongisa malaba na mituna te. Les Barbares ezalaki kolobela ndambo ya buku moko nalingaka mingi ya Brossat. Azali koloba été politiki, lelo, ezali koyokana pe pilitiki ya solo ezali mua kozanga koyokana, esengeli kondima été bato bazali na liloba moko te, bato bakozala na liloba moko te. Malamu totambola elongo ata tokeseni esika ya kokosa été tokokani. Film ezali kolobela likambo wana pe nalingaki kotia liloba oyo na suka, po tozali komona neti tozali na ngambo ya malamu pe tozali koyeba makambo. Na ebandeli ya film, ekomami : Les Barbares sima tomoni Sarkozy, esekisi. Pe sima, tozali komiyoka malamu te, tango tozali komona ba photos ya bato ya mbotama moko, ba photos ya bato bazali kopema. Tozali komona été tozali na lingomba pe tozola neti ba zoba, ezali kotia neti mua molili pe tokomi komilobela été « bato ya malamu » bazali nde « bato oyo batiaka mobulu ». Liloba ya suka, oyo nazali komona malamu penza, elobi été ezali na esika moko oyo soki pilitiki ya solo ebimi ezali pasi po na komona elongi koloba nini. Poitiki ezali kobangisa pe ezali pasi mingi po na koyeba. Liloba wana ezali kokomisa film mua pasi, pe ezali kotunisa biso na ezaleli ya pilitiki. Ezali kopekisa biso te tokanisa, kasi ezali kolobela likambo moko ya solo.

 

Po na nini oponaki bilili oyo ezali koningana te na kati ya ba films na yo ?

Ndambo toponaki te pe ndambo toponaki. Oyo toponaki te ezali po été na film ya liboso oyo nasalaki ba photos ezali 21.04.2012. Nazalaki mbaka eleki bisika mingi ya kolakisa bikeko ndenge esengelaki. Le 21 avril, ezali mokolo ya mbotama na ngayi. Tango biso tozali komela champagne nde Le Pen aponami moto ya mibale pe bato bazali kotomboka na bala bala. Namitunaki eloko nini nakokaki kosala po na makambo oyo ezali koleka, natalaki epayi nawuta pe namilobaki nasala eloko moko : nasangisaki ba photos nazalaki na yango pe nabongisaki po na komonisa. Musala yango ebimaki neti musala esila te pasi po na kotala pe bisika misusu ebimaki malamu. Na bisika misusu ezalaki neti bilili ezali koningana. Namilobaki malamu nalandela yango, natala ndenge yango ya kosalela, nde nalandelaki kosalela ndenge wana. Tango wana nalingaki kosala ba films ngayi moko, nalingaki kosenga basalisa ngayi te na mbongo pe ezalaki pasi te kosalela bilili oyo ezali koningana te na esika ya kosalela ba oyo babatela kala. Nalingaka tango ba photos ezali mingi, tango bato bazali komikanga ba photos, bazali komitia na Internet, pe bazali kokanisa bango moko bazali kosala ndenge wana pe soki nazali komona été ba photos ebele ekokani, ezali penza kosepelisa ngayi. Na kati ya ba films na ngai, ba photos ezali kolandana, nazali kosala film ya photo moko te, nazali kosala ba films ya ba photos ebele. Tozali kosala bilili ndenge moko esika nionso tovandi na mokili.

 

Ndenge nini oponaka nzembo ya ba films na yo ? Tango mosusu oyokaka nano nzembo sima nde ozali film ?

Ezali ndenge ya kosalela te, kasi soki natali ebandeli ya 21.04.2012, nasalaki ndenge ya koyoka neti ndenge nasalaki bilili, yango esalaki été film etalama malamu te pe ezala neti ya bitumba. Namonaki yango kaka sima pe namonaki été soki nalingi nasala film, malamo nabongisa nano oyo bato bakoyoka. Po na film Eut-elle était criminelle, ebandeli ezali koleka mbango. Soki natiaka pe nzembo ya mbango, elingaki kozala neti ezali kobeta makasi. Nzembo natiaki ezali malembe po na bato bazali kotala film pe ezali komema biloko ya malamu na kati ya film. Po na We Are Winning, Don’t Forget nazalaki na bilili kasi film te. Nakendeki koyoka miziki ya Godspeed : esika moko na kati ya nzembo, ndenge ya kosala film ebimaki. Tango nazongaki epayi nangayi lobi na yango nayokaki nzembo wana pe na poso moko nasilisaki film. Tango mosusu, nzembo eyaka liboso nabanda kosangisa film pe tango mosusu miziki eyaka na tango ya film. Lelo oyo, nazali kosala na moyembi moko tango nazali kobongisa film pe nazali kokokisa yango na film tango ya kosangisa bilili.

 

L’art délicat de la matraque ekoki kopesa posa ya clip pe soki omoni été film ekokani na nzembo ya kala This is Not a Love Song ya lingomba Public Image Ltd.

Ezali kopesa posa ya clip, kasi ekokani te na The devil inside po tobandaki liboso nano na miziki, awa nde miziki eyeyi sima ya film. Ndenge ya kosalela clip elandaka nzela basalela te ; tokoki kozongisa nzembo ndenge tolingi te. Clip esengaka, soki ezali clip ya maloba, esengaka kolekisa nzembo mbala mingi. Kasi, awa tozali na film oyo elandi nzela ya ebandeli pe ezali na maloba. Miziki ezalo po na komonisa, bilili ezali kolakisa ndenge neti ua kotiola.

 

Na 200 000 fantômes oponaki nzembo ya bolingo… Po na nini?

Nzembo ya bolingo eyembami na moto oyo asalaka miziki ya gothique ebele. Tango nazalaki na Horoshima, nabandaki kolekisa mikolo na ngai na kokanga ba photos, mikolo ezalaki milayi pe nazalaki koyoka miziki mingi pe nzembo oyo. Koloba tango nionso Anglais ezali kosalisa po na koyeba maloba nini ezali koyembama. Maloba yango ekamuisaki ngai po na ndenge oyo nazalaki komona na Hiroshima, makambo eyaka pamba te. Nzembo ezali kolobela ba photos, kobuka bisika, ba ngonga, Hiroshima ezali mboka moko ya ba klisto pe lisekwa pe oyo ebombama na mutu. Eloko moko na esika oyo esepelisaki ngayi na ndenge ya kolela, na esika wana oyo piano engumbami oyo ezali kolobisa film. Mbala misusu batu oyo bazali kotala film bazali kokanisa été miziki esalamaki po na film yango.

 

Ozali kokangama mingi na ndenge ya kolakisa biloko elandana na ba films nay o Nijuman no borei (200 000 fantômes) pe Undeer Twilight

Eloko esangisi ba films oyo mibale nakoki koyeba te, po ezali ndenge moko te ya kosalela. Na 200 000 fantômes, kosala film ya ba ndako yango mutu esalisi ngayi po na tiya bilili penza na kati. Po na ngayi, film ezali kokokana mingi na Dies Irae pe nzela tozali kotalela. Ndako wana esengelaki ezala na kati kati po bato batala yango, ezali neti ndenge ya kovanda na eloko moko miniti zomi.

 

Ndako oyo etikalaki na Hiroshima ezali neti eloko elongaki, yango nde esepelisaki yo?

Ezali ndaku kaka moko te oyo bombe ekweyisaki te, kasi bato ya Hiroshima bayebaki ndako nde kala. Ezalaki ndako eyebanaki po ebatelaka molimo. Ngambo moko ezali mboka pe ngambo mosusu ezali molimo. Yango esilisaki ngai po nasala eloko nini nalingi kosangisa po na posa ya kokanisa pe ya kobosana. Ndako oyo ezali kati esalisaki biso po tozala na biloko oyo mibale esika moko, po tolekaka ngambe na ngambu.

 

Tomoni na ebandeli osangisaki oyo ebombamaki na ba Japonais pe ba Américains.

Nakokaki kotika oyo ya ba Americains kasi nakokaki te. Ba photos ya tango bitumba esilaki ba Americains moto basalaki yango. Sima, ba photos ya ba Australiens po ba soda na bango batikalaki a Hitoshima. Sima ya mbula ya liboso, ezalaki kaka ba photos ya ba Japonais. Soki natiaka ba photos ya ba photos ya ba Américains te ba photos ya explosion elingaki ezala te pe tolingaki komona ndako oyo te sima ya explosion.

 

Ozali na ndenge ya kotalisa film Undo, ezali neti kotiola po na ndenge oyo batu bazali kotala makambo eleka to ozali kolakisa ndenge ya mabe oyo ozali komona ?

Film oyo ezali kosakana, po ezali neti soki tozali komona été ezalaki malamu na tango ya kala to tozali koloba loba été makambo ebongwanaka kasi liboso ezalaki pasi te. Ezali komonana na film été tozali kokende na nzela ya malamu te, kasi nandimi te été ezalaki malamu na tango ya kala.

Esili na Adamu na Eva pe to tomoni été soki tozali kolanda tango ti na ebandeli eloko ezalaki na ebandeli ezali nango malamu te. Eloko ya malamu ya koyeba ezali esika nini tozali kokende kas inde esika nini towuti te.

 

Ba films na yo ezali na bitumba, makasi mingi, ndenge bilili esangami esali bisika ya kokanisa oyo tozali neti komimona kasi tozali koyeba te. Bilili ezali mingi pe elembisi !

Tokoki komona kaka bilili ebele, na kati ya ba films na ngai bilili ezali pasi po na kotala, to ndenge nasaleli ndenge été ezala pasi po na kotala. Ezali malamo ndenge ba films na ngai ezali mikuse, nde nakoki kosala yango milayi te po, bilili ezali kotikala na misu, pe ezali neti kokanga bato. Ba films na ngayi esalemi po na kotalama tango nionso te. Tango nalakisaka yango ngonga moko na ndambu, nayebi été bato babimaka pe bayaka kotala ngai po bayebisa ngayi été eleki makasi mingi pe bazali na posa ya kopema mua moke.

 

Ozali kosala nini mikolo oyo ?

Nazali kosala film ya mukuse kombo na yango L’optimisme. Nazali pe kosilisa film ya ndako ya bobombami, nawuti kosala pe mikanda po na kosenga na l’état mbongo po nasala musala ya documentaire ya mulayi po na lingomba ya Baader pe nazali kokoma théâtre.

 

Revue de Presse

 

« Ndenge ya kosal montage ya mbangu pe kosalela bilili ya kala ezali cinéma na yé. Ba films na ye ezali mikuse pe ezali mua makasi. Azali kolakisa biloko ya makasi. Cinéma na ye ezali neti kobeta bato likofi ».

A. LAVIGNE, Jean-Gabriel Périot, vidéaste expérimental In La Vignette, France Culture.
Consulté le 14 Mars 2013. Tiré de :
www.franceculture.fr/emission-la-vignette-jean-gabriel-periot-videaste-experimental-2010-10-01.html

 

« Sima ya film L’art délicat de la matraque na 2009, tango azalaki kosangisa bilili na ndenge ba soda bazalaki kobeta bato pe na nzembo ya miziki pop (“This is not a love song”), asalaki bilili ekabolami po bato bazali kotala bamona eloko nini ye alingi kolakisa, Jean-Gabriel Périot aponi kozongela kosangisa bilili ezali koningana te na Les Barbares, eloko oyo asalaki lisusu te wuta 2007 na film 200 000 fantômes. Bilili ekabolami te na film oyo ya sika, kasi kotiola, kopesa posa ya kosanza pe akembi. Périot alakisi, été ye azali cinéaste oyo akotelaka bato […]. Ata kutu ndenge ya kosalela film ezali komonana malamu, pe ezali komonana neti kaka ndenge ya kosalela, bato bazali kotala bazali komituna eloko nini Périot alingi kolobela na ndenge oyo ye azali kosalele. Soki tokaboli bilili na film pe tolongoli maloba, bilili yango ekokani soko moke te na mokili oyo toyebi. Koningana ezongi po na kotumola ndenge ezalaki koningana te. Kobunda ya busoto ekokaki kozala neti bato oyo bazalaki koningana te. Po na Périot, kobundana ya bosoto ezali neti eloko ya bomoto etikala na biso, yango etindi biso to loba té, ata soki koboya na biso ezali penza makasi. »

C. GIRAUD  Les Barbares de Jean-Gabriel Périot In La Petite Collection. Consulté le 14 Mars 2013. Tiré de :
www.brefmagazine.com/pages/extraits.php?id_texte=412&rubrique=d
petite_coll&archive=oui

 

« Banda mbula zomi Périot azali kosala mosala oyo ezali kolobela bitumba, makanisi pe oyo etali mutu na mutu na kati ya ba films ya mikuse oyo bato bazali kobenga neti “experimentaux” ata soki muana yango azali kobaluka kati ya documentaire na fiction […]. Jean-Gabriel Périot akanisaka malamu, kasi atikelaka bato oyo bazali kotala film mua esika po basosola na oyo bawuti komona. Ya azali na ye na ndenge ya kokumisa makambo ya politiki te, atikala mutu oyo alobaka ndenge alingi.

A. AUGÉ (12 Septembre 2010). Les Barbares de Jean-Gabriel Périot In Format court : Regards pluriels sur un format singuliers. Consulté le 21 Février 2013.Tiré de
http://www.formatcourt.com/2010/09/les-barbares-de-jean-gabriel-periot/

 

Ba films ya mutu oyo ezali kokoma ebele, na ndenge asalaka oyo ya mikuse, tango mususu expérimental, fiction to documentaire, kasi azali tango nionso koluka pe kotunela na bilili […] Jean-Gabriel Périot alingaka kotuna bato banda ebandeli, pe ndenge azali kotalela bitumba ezali kopusa biso tokanisa po na ndenge makambo ezali kozongela ndenge moko tango nionso.

X. GOURDET : Jean-Gabriel Périot à l’honneur au Festival de Clermont-Ferrand In Format court : Regards pluriels sur un format singuliers.
Consulté le 14 Mars 2013. Tiré de :
www.formatcourt.com/2013/02/jean-gabriel-periot-a-lhonneur-au-festival-de-clermont-ferrand/

 

traduction en Ligala (République démocratique du Congo) par Eddy Nsasa

Margot Farenc, Jessica Macor, Josselin Carey, Laure Weiss, Tiana Valencourt, Maxime Lambert, Taegyun Yun
Cinéastes par eux-mêmes - séminaire sous la direction de Nicole Brenez, 2012-2013